Jeremi 44:8 - Mokanda na Bomoi8 Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.