Jeremi 44:3 - Mokanda na Bomoi3 likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.