Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 44:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 44:22
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe ; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo.


Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »


Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.


Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi : Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai !


Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.


Boye Ezayi alobaki : — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ?


Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo ; nakoyokela yo lisusu mawa te.


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,


nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.


Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.


Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.


Lokola nkosi etikaka ndako na yango, mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te likolo ya mopanga ya banyokoli na bango mpe likolo ya kanda ya Yawe.


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.


Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.


Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.


Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›


Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi


Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.


Bobongisa kunda mpo na Moabi mpo ete ekobebisama solo ; bingumba na yango ekotikala pamba, mpe bato bakovanda lisusu kuna te.


Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe ? « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya lolenge oyo ?


Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.


Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


Sik’oyo, nakonyata bino ndenge shar oyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.


Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? » Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? »


Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ