Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 44:21 - Mokanda na Bomoi

21 — Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 44:21
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka !


Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ; Yelusalemi etikali lisusu na bato te !


Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »


Bato ya Isalaele mpe ya Yuda bapesaki Ngai kanda na nzela ya mabe nyonso oyo basalaki : ezala bango, bakonzi na bango, bakalaka na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi.


Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.


Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana :


Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?


omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka ;


Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.


Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo : « Nakobosana misala na bango ata moko te.


Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango, pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda.


« Boni, ebombami epai na Ngai te ? Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ?


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ