Basi babakisaki : — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye ?
— Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ?
Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai.