Jeremi 44:17 - Mokanda na Bomoi17 Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino !
Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.