Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 44:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 44:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako.


Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.


Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.


Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki ? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.


Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema ! »


Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :


Basi babakisaki : — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye ?


Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso : — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe :


nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango ; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke.


Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi.


Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.


Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ