1 Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :
« Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi :
« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›
natombokeli yo mpe bibale na yo ; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi.
nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango ; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.
Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.