Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:9 - Mokanda na Bomoi

9 — Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.


mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.


Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito ; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso,


Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo ; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »


« Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi.


Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.


Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino ; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino ; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.


mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »


Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki : « Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana, kaka na makasi moko wana, mpe ekomonana lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ