Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni.


Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito, na kozanga kotuna toli na Ngai, mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito !


Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,


Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.


Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito


Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino.


Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :


Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso : — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe :


« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›


Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ