Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:6 - Mokanda na Bomoi

6 bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba : ‹ Baninga na yo ya motema bakosi yo mpe balongi yo. Matambe na yo ezindi na potopoto, baninga na yo bakimi yo ! › »


Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te ; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga.


Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,


Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,


bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.


Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.


Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo :


Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda.


Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.


Nazali koloba na yo penza ya solo : tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga yo moko mokaba na yo mpe ozalaki kokende na esika nyonso oyo olingi. Kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe ekozala moto mosusu nde akokanga yo mokaba mpe akomema yo na esika oyo yo okolinga kutu kokende te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ