Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kuna, kati na tempelo ya Eliopolisi, akobuka makonzi ya bule mpe akobebisa na moto batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.


Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.


Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango : Engumba ya moyi.


Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko, ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango, pamba te ekeyi na bowumbu.


Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito ; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso,


Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia.


Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :


Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye.


Makolo ya bampunda na ye ekokota na babalabala na yo nyonso, akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzi oyo esalaka makasi na yo ekokweya na mabele.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.


Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu.


Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ