Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:11 - Mokanda na Bomoi

11 Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. »


Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi ! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu ! ›


Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.


Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito ; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso,


Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »


Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.


Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu.


Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te : moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Nalobaki na etonga ya bibwele : — Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango ; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango !


Soki moto asengeli kokende na bowumbu akokende penza na bowumbu. Soki moto asengeli kokufa na mopanga akokufa penza na mopanga. Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ