Jeremi 43:10 - Mokanda na Bomoi10 Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo ; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.