Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 43:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 43:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.


Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.


Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.


Kasi Yawe alobaki na ngai : — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.


« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa !


Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino.


Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »


Bawanganaki Yawe mpe balobaki : « Yawe akosala eloko moko te ! Pasi moko te ekokomela biso ; tokotikala na biso komona te ezala mopanga to nzala makasi.


Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba :


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.


— Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.


Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ