Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 42:22 - Mokanda na Bomoi

22 Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 42:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.


Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. »


Solo, bato nyonso oyo bakotingama kokende kaka kovanda na Ejipito bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; moko te kati na bango akotikala na bomoi mpe akobika na pasi oyo nakotindela bango. ›


Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.


Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ;


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Beta maboko na yo, tuta makolo na yo mpe ganga : ‹ Mawa ! › mpo na misala mabe mpe misala ya mbindo ya libota ya Isalaele, pamba te bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka !


Moto oyo azali mosika akokufa na bokono oyo ebomaka, oyo azali pembeni akokufa na mopanga ; mpe oyo atikali, bakozingela ye mpe akokufa na nzala makasi. Nakosilisa kanda na Ngai na banzoto na bango.


Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ