Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 42:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 42:18
38 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola kanda na Ngai na nzela ya biloko oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai ekopela makasi na esika oyo, mpe ekokita te.


Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »


nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »


nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.


Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo : ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto ! ›


kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.


Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.


Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.


Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.


Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.


‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.


Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.


Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.


Yawe asilikaki makasi koleka ; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.


nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi.


Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › »


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »


Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »


Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye.


ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ