Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 42:10 - Mokanda na Bomoi

10 « Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 42:10
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.


Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.


Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.


Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.


Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !


Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.


Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.


Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye ? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te ? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki ? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. »


Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe. ’ › »


Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ;


Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.


Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda.


Boye, bikolo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; Ngai nde natongi lisusu bingumba oyo ebukana, mpe naloni lisusu biloko oyo ebebisama. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakokokisa yango. ›


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki : — Makambo yango ekosalema te.


Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki : — Makambo yango ekosalema lisusu te.


Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.


Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola : — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye !


Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.


« Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi, oyo esila kokweya ; nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,


Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.


Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ