13 Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ;
basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea.