12 basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni : bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu.
Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ;