Jeremi 41:1 - Mokanda na Bomoi1 Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu.
Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki : — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende.
Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,
bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.