Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 40:15 - Mokanda na Bomoi

15 Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa : — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania ! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo ? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 40:15
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi basoda balobaki : — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.


Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »


soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›


bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.


pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye : — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke.


— Bozali kososola eloko moko te ; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te ?


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ