Jeremi 40:14 - Mokanda na Bomoi14 mpe balobaki na ye : — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo ? Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.