Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 40:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 40:11
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.


Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.


Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo bawumela elongo na yo ! Zala nguba na bango liboso ya mobomi. » Tango minyoko ekokoma na suka, kobebisama ekotikala lisusu te mpe koboma ekosila na mokili.


nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.


bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.


Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda bakamataki batikali nyonso ya Yuda, oyo bazongaki wuta na bikolo nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana, mpo na kovanda na mokili ya Yuda ;


bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo ;


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango.


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba : ‘ Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso. ’


Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba ; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango.


Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Kasi kamata ndambo moke kaka ya suki, kanga yango na songe ya elamba na yo.


Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.


Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.


Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango.


Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi : — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.


Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ