Jeremi 4:6 - Mokanda na Bomoi6 Botombola bendele mpo na kokende na Siona ! Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi wuta na nor mpe kobebisama ya somo ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.
Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.