Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 4:30 - Mokanda na Bomoi

30 Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 4:30
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.


Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.


Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;


Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?


Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › »


Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »


Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.


Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.


Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.


Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo ; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.


ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.


Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko : kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama.


Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »


Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ