Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 4:29 - Mokanda na Bomoi

29 Bato nyonso ya engumba bakimi, kaka na makelele ya basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpe oyo babundaka na matolotolo. Bamoko babombami na bazamba, bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ; bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, mpe ata moto moko te atikali kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 4:29
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.


Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »


kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.


Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.


bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.


Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali mitema mabe mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »


Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ