Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 4:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba, mpe nakoyoka makelele ya bitumba ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 4:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.


Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi.


Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Mokonzi ya Ejipito alongolaki ye na bokonzi kati na Yelusalemi mpe asengaki na makasi ete mokili ya Yuda ekoma kofuta mpako mpo na mokonzi : bakilo nkoto misato na nkama minei ya palata mpe ya wolo.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


mpe soki bolobi : « Te ! Tokokende nde kovanda na Ejipito epai wapi tokomona lisusu bitumba te, tokoyoka lisusu lolaka ya kelelo te mpe tokokufa lisusu nzala te ; »


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ