Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 4:17 - Mokanda na Bomoi

17 Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 4:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.


Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko lokola mwa ndako moko ya matiti kati na elanga ya vino, lokola ndako ya kobombamela kati na bilanga ya bapasiteki, lokola engumba oyo ebatelami.


Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ;


Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki ; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango !


Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.


Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.


Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.


Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ