16 « Boloba yango na bikolo mpe botatola yango na Yelusalemi : ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ; bino bato, botia matoyi ! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka !
Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
« ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.
Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor ; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »