Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 4:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 4:15
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »


Boyoka ! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.


Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ