Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola.
Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso ! Tokufi na biso !
Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »