Jeremi 39:6 - Mokanda na Bomoi6 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata, na miso na ye, mito ya bana mibali ya Sedesiasi mpe ya bankumu nyonso ya Yuda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.