Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 39:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko ; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 39:5
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Toyi, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri,


Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.


Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.


Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu.


Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.


Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


Kasi ndenge bambuma ya figi oyo ekawuka ezali mabe mpe bakoki kolia yango te, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe nakosala Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe batikali ya Yelusalemi, ezala ba-oyo batikali na mboka mpe ba-oyo bazali na Ejipito :


Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »


Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.


Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »


Na tina ya Damasi : « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.


Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.


Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, basalaka makambo nyonso oyo bazali na yango posa, mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.


Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.


etuka ya bato ya Gebali ; mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.


Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda ; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda.


Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.


Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ