Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 39:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu ; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 39:3
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti ; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali ; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima ;


Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.


‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.


Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi : — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te.


Boye, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi ; Nebutsasibani, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi nyonso ya basoda ya mokonzi ya Babiloni


Bampunda na ye ekozala ebele penza kino putulu na yango ekozipa yo ; bamir na yo ekoningana na makelele ya bampunda ya bitumba, ya bapine mpe ya shar, tango akokota na bikuke na yo ndenge bato bakotaka kati na engumba oyo bamir na yango ezali na madusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ