Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 39:11 - Mokanda na Bomoi

11 Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 39:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.


Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.


Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.


Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.


Yawe alobaki : « Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo ; solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo na tango ya pasi mpe ya minyoko.


Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.


« Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe mpe nakokangola yo na maboko ya bato oyo banyokolaka yo. »


Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi.


Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni.


Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo ; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo ; kende esika nyonso olingi.


Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano.


Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ