Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 38:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 38:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili.


bengana ngando oyo ebombami kati na matiti, lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo oyo batambolaka kati na mbongo ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.


Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.


Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »


Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.


Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.


Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »


Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.


Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,


Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye : — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ?


Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi :


Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,


Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.


Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.


tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango.


Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ