Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 38:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 38:4
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki : — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka ! Eliya azongisaki : — Solo, namoni yo ; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe.


Kasi bato basalelaki ye likita ; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe.


Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.


Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso ; bazalaki komilobela : — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te ; mpe mosala ekosila te, ekotelema ! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala ! Kasi ngai nasambelaki : — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai !


Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki : — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino !


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; »


Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.


Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino ! »


Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »


Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !


Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo : « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. »


Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.


Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.


Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.


mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !


Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki : — Bato oyo bazali Bayuda ; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso.


Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga : — Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi sik’oyo awa,


Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali : kotia mobulu ; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,


Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ