Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 38:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 38:3
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›


‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.


Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te.


Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino ;


mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›


Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ