Jeremi 38:19 - Mokanda na Bomoi19 Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi : — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.