16 Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !
nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.
Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :
Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »