Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,
Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »
Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.
Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi : — Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo. Jeremi asalaki se bongo.
Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.