Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 37:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 37:5
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate.


Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.


Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana,


Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi :


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ;


Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ?


Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba ; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ