20 Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna !
Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te ; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. »
Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye : — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke.