Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !
Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka ! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
« Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,
Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !
« Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo ; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !
Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango mpe komela makabo na bango ya vino ? Tika ete etelema mpo na kosalisa bino mpe kopesa bino ebombamelo !