Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 37:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 37:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.


Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.


kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.


Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »


Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›


Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.


Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana,


mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›


Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na kotelemela Edomi, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela bavandi ya Temani : ‹ Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.


Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.


Bato oyo bakokweya na mopanga bakotondisa mokili ya Babiloni mpe babalabala na yango ekotonda na bato bazoka bapota.


Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba oyo bazalaki na milongo na ngai ; abengi mampinga ya bapaya mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai. Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko, na ekamolelo na Ye ya vino.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ