Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:7
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.


Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. »


— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda ; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo.


mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.


Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? ›


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »


Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi.


Bazalaki koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe ; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela.


Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe.


Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »


Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna !


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye : — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke.


Yawe asilikaki makasi koleka ; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.


Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ;


Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino.


Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.


Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »


Kolanda ndenge kaka ekomama kati na Mobeko ya Moyize, pasi yango nyonso ekomeli biso ; mpe tobondelaki te Yawe, Nzambe na biso ; totikaki te kosala masumu mpe tomipesaki te mpo na kososola bosolo na Yo.


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai ; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.


« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko.


Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ