Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:6 - Mokanda na Bomoi

6 Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›


Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso :


‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,


« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.


« Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »


Lokola tolekisaki bongo tango mingi mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, pamba te ezalaki sima na eleko ya kokila bilei, Polo akebisaki bango :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ