Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki : — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo ; bakoya na butu mpo na koboma yo.