Jeremi 36:29 - Mokanda na Bomoi29 Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.